Maya aboyi (Simarro Massiya)

Nzambe asala eloko oyo kolinga eloko ya mabe
moto okolinga akolinga yo te
ekomi nde misere

Oh, Maya, yoka ndenge Kinshasa na Brazza bazali kozomela ngai
oh, nazali kolela yo
mibali badasuki basali semblant lokola bango kutu balingaka te
nakamwe!
lokola nanu bazwa bacoup ya bolingo te
eloko oyo bolingo
eponi mokonzi te
eponi riche te
eponi pouvre te
mwasi te
mobali te
somo ya ebale, eleki ya cimetiere

Maya, ngai nakangi maboko na moto
makambo matondi ngai na motema
nakomi kotanga mikolo na misapi
nakomi nde kobanga
mbala liboso tosalaki matata
ezalaki kaka boye
soki nafungolaki miso te
olingaki oboya ngai

Maya, ngai natiyi loboko na litama
makambo matondi na motema
nakomi kotanga basanza na misapi
nakomi nde kobanga
mbala liboso okendeki Ishiro
ezalaki kaka boye
soki nafutaki ticket te nalanda yo
olingaki ozonga te

Maya, namiswi lulemo na nzoki
makila masangeni na soy ya monoko
mosusu nabwaka mosusu namela
nakomi nde bandoute
mbala eleki osengaki divorce
obandaki kaka boye
soki nalandaki lolendo na yo
ezalaki se tokabwana

Maya, tala ndenge nakomi kotanela ntongo na kiti
lokola moto alali na matanga
nakomi kolala libanda lokola ebembe
moto nyonso akomi kobanga mpe kokima ngai
lisolo na ngai eleki mulai
Maya, okomisi ngai kandakanda na mokili

Oh mama, namipikoli suki mama
nsango nayoki naboyi nde kondima
nazangi confiance na matoi na ngai moko
nzoto ekomi somosomo
moto azalaka planton ya ngai na yo
lelo ye akoma banda
boni yo kanda lokola liwa
osali zoba lokola ndoki
×2

Maya, bolingo oyo ekomi lokola bolingo ya nsoso na ya moto
moto akobokola nsoso na bomwana na ye malamu
akolinga te akufa
nsoso ekoli, feti ya bonne annee ekomi
babokilo bayei kotala yo
kobomi nsoso mpo na bokilo
ezali lokola ndenge osali ngai
lisumu nini nasali mpo namerite
etumu motindo boye, Maya

Akendeke mbongo te ata ko ye asilika
abungaka nzela ya ndako te
kasi ekomi lelo ngai naluka ye
toyokanaka mbongo te

Nalingaka toswana mpo tomesana nyonso
ambience ya libala
bitumba, bazwa na miso ya bato
tomesana batokongo biso

Nalingaka osalela ngai mwan lolendo
mwana nde nabondelaka
kasi oboya ngai cherie
toyokanaka mbongo te

Mama, oyo olingi basala yo te
osala te moninga te
epai okei, obongisaka
bolingo ezali eloko mosusu
mbongo mpe ezali eloko mosusu
eteni ya nzete
ata eumeli mingi na nse ya ebale
ekobongwana ngando ata mokolo moko te

Nzambe asala eloko oyo kolinga eloko ya mabe
moto okolinga akolinga yo te
ekomi nde misere

Ngai ko bapesa ngai motema ya kolinga
nasali yo nini, likambo te, Maya
bala na yo nazingi nde maboko

Nzungu bazalaki kolambela ngai
lelo ekomi ya banda
nakoloba lisusu nini
basilisi ngai lolendo

Ngai ko natuti libaku ya mabe
maladie ya motema
ngai ko natuti libako ya mabe
maladie ya l'amour
epai nakei kopesa motema
ekomi nde boumbu

Ngai nakoluka moyen nabosana
soki mpe nakokoka
natingwana lisusu nini
naluka se mosusu

Awa ko bobotoli ngai ye boremplacer ye na nani
nakei koleka na kati ya douche
naboyi epinzoli tika bilembo na matama

Oyo nyonso faute ya mama
aponela ngai motema
motema ya kolinga baninga ya mokili
tika nanyokamwa

(interplay)

Maya, soki mbula mosusu
otuti libaku na kati ya nzela
yebaka ngai wa yo nazali kotonga yo
eloko esali ngai souci na makanisi
tomeseneki mingi
mokili monuni nanu te
ntina nini bolingo na biso enuna, mama

Maya, soki moyen ezali
senga na mbanda na ngai ya sika
mokolo oyo okokumba zemi
senga ye permission
mwana liboso yo okobota
azala mwana ya mobali
azwa lolendo na yo
pesa ye nkombo na ngai
mokili monuni nanu te
ntina nini souvenir na biso epola, mama

Maya, soki mokolo mosusu
oloti ndoto na kati ya butu
yebaka ngai wa yo
nazali kobanza yo
eloko esali ngai nde makanisi
tomeseneki mingi
mokili monuni nanu te
ntina nini bolingo na biso enuna, mama

Maya, soki moyen ezali
senga na mbanda na ngai ya sika
mokolo oyo okokumba zemi
senga ye permission
mwana liboso yo okobota
azala mwana ya mobali
azwa kitoko na yo
pesa ye nkombo na ngai
mokili monuni nanu te
ntina nini souvenir na biso epola, mama

Nzambe asala eloko oyo kolinga eloko ya mabe
moto okolinga akolinga yo te
esala nde misere
ngai ko nalelaka libala bandeko
nzambe atindeli ngai nkisimi

Maya, naluki yo par tout
nakati cote ya ngambo ya Brazza
nakei na ???
nabanda ???
??? ???
nazongi Kinshasa
nakomi epai ya Johnie
na magasin de Bosazou
epai nasombelaka yo video
leki amoni yo te
na village na Kingabwa
na La Creshe epai Claude
neuf regions epai ya mandefu
Abuagu ya Lingwala ??
namoni kaka yo te
nazongi nse na nse ya Lidame
makasa nyonso ekauki
nazwa kozela yo Maya
mpasi ya nzoba esilaka noki te

Nzambe asala eloko oyo kolinga eloko ya matata, aie pitie
ntango kolala nde ntango nakokanisa maye tokosala lobi
Maya,tiya ngai programme ya lobi
Maya, kanisaka ngai
butu ekomi mulai kompongo te
okomi te miso te
ntongo eboyi bota na Maya
yo na kitoko ya magie, Maya, mama
demarche ya camereon, Maya, Maya
na miso ya pompe, Maya
Maya, tindela ngai ata mikanda
ata carte postale ya pamba
nalateli yo palata na kingo
nalati ?? (fade out)

魔性の女「マヤ」

神はたとえ悪いことでも望むことをする。
あなたが愛している人があなたを愛していないとしたら、
それは悲劇になる。

おお、マヤ、キンシャサやブラザヴィルの人々がいかに俺のことを嘲笑っているか、聞くがいい。
俺はお前を失って泣き暮らしているよ。
怒れる男達は、まるで今まで人を愛した経験がないかのように、俺を無視する。
驚きだ!
まるで、愛についてのいろんなことを全く知らないかのようだ。
愛というものは相手を選ばない。
富める者を厚遇しないし、
貧しい者を冷遇しないし、
男も女も関係ない。
川(の淵を覗く)恐怖は、墓場に値する。

マヤ、俺は火照った手を握りしめて、
心に巣食ったさまざまな問題に耐えている(matondiはetondiのliaison)。
日が経つのを指折り数えて、
俺は今にも気が狂いそうだ(ついに恐れを抱いた)。
初めて俺たちがおかしくなったときもこうだった。
もし俺が事態を直視しようとしなかったら、
お前は俺を欺いたことだろう。

マヤ、俺は両頬に手をついて、
心に巣食ったさまざまな問題に耐えている。
月が経つのを指折り数えて、
今にも気が狂いそうだ(ついに恐れを抱いた)。
初めてお前がIshiroへ旅立った時もこうだった。
もしお前に付き従うために俺がチケットを買わなかったら
(本来はsoki nafutaki ticket mpo na kolanda yo te歌詞独特の文体)、
お前は戻っては来なかっただろう。

マヤ、俺は後悔のあまり舌を噛んで、
口の中のつばに血が混じっている。
一部は吐き捨て、一部は飲み込みしながら、
俺は悩み抜いた(リンガラ語独特の表現)。
かつてお前が離婚を願い出た時も、
お前はこう切り出したものだった。
もし俺がお前のわがままを許していたら、
結局お前は別離を選んだだろう。

マヤ、俺がどうやって椅子の上でまんじりともせずに夜を明かしているか見るがいい。
まるで葬式で夜通し(コンゴでは通夜は葬式に含まれる)過ごす男のように、
俺は死体のように外で寝る羽目になってしまったよ。
私についての噂話は、あまりにもひどく、
マヤ、お前はついに俺を怒らせるに至った。

ああ、俺は信じるには恐ろしすぎる話を聞いて、
頭を掻きむしる。
俺はわが耳を疑った。
体は恐怖でいっぱいになった。
俺の遣いだった男は今や間男だ。
死ぬほど怒ったお前はどうだ、悪霊のように愚かなまねをする。

マヤ、俺たちの愛はまるで鶏を飼う人が鶏に注ぐような、
鶏やそのひなを慈しむような、
死なないように慈しむようなものだったはずなのに、
ひなが育って新年が来て、
客がそれを見にやって来たら、
客のためにそれを殺して供するようなことを、
お前は俺にやったのだ(リンガラ語独特の表現)。
これほどの罰を受けなければならないような、
どんな罪を犯す理由が俺にあるというのだ。

お前はいくら怒ってもこんなに家を空けたことはなかった。
家への帰り道を忘れたこともない。
しかし今や俺はお前を探し求めて、
もう訳が分からない。

喧嘩するほど仲が良いと言うが、
公衆の面前での諍いや嫉妬でさえ、
そんなことは結婚生活の刺激として、むしろ良いことだし、
すっかり慣れっこになったと思っている。

お前のちょっとしたわがままは、
まるで手間のかかる子供のようで寧ろ可愛い。
しかし、お前は俺を裏切った。
もう訳が分からない。

お前がされたくないことは、
たとえ友達にもするな。
どこへ行っても、ちゃんと繕ってくれ(欺くようなことはするな)。
愛は特別なものだ。
カネも特別なものだ。
木の枝は、
たとえ水の中にあってもそうは変わらない。
たった一日でワニになったりはしない(リンガラ語独特の表現)。

神はたとえ悪いことでも望むことをする。
あなたが愛している人があなたを愛していないとしたら、
それは悲劇になる。

私は愛する心を与えられた。
お前をいかにしよう、もういい、マヤ、
誰とでも結婚するがいい、俺はあきらめた(腕組みをする)。

俺のために使われていた鍋は、
今や間男のものだ(リンガラ語独特の表現)。
何をか言わんや、
プライドも何もない。

俺はしたたかに蹴躓いた。
心の病に・・・
俺はしたたかに蹴躓いた。
愛の病に・・・
気持ちを与えに行った場所で、
俺は囚われの身となった。

俺は忘れる方法を探そう。
もし出来ることなら、
またなんらかの希望を探そう。

君たち(不特定多数)が彼女を私から奪うとなってはしかたがない。
彼女を誰に代えられるだろうか。
俺は一人シャワー室に籠って泣く。
そして頬に残る涙のあとさえ拭くのを忘れる(あとをそのままにしておく)。

これら全ては母のせいだ。
つまり、母が私に産み与えた心、
すなわち分け隔てなく人を愛しようという心が、
(結果的に)私を苦しめているからだ。

マヤ、もしいつの日か
おまえが道で躓いたなら、
俺がお前の悪口を言いまくっていたことを
その都度思い出すが良い。
そのことが私を不安にさせる。
(なぜなら)私たちはとても仲が良かったからだ。
全ては未だ歳を取っていない(俺の悪口は未だこれからだ)。
(だから)俺たちの愛がどうして歳を取ってしまうはずがあろうか。

マヤ、もし出来ることなら
その新しい間男に頼んでおけ。
お前が妊娠したその日に、
お前が産む初めての子が、
もし男の子であれば、
彼はお前の傲慢さを持っていることであろうから、
俺の名前をつけるように、
彼に許しを請え。
俺の悪口は未だこれからだ。
俺からの贈り物がどうして腐ることがあろうか。

マヤ、もしいつの日か
夜中にお前が夢を見ることがあるならば、
俺がお前のことをずっと考えていたことを
その都度思い出すが良い。
そのことが私を不安にさせる。
私たちはとても仲が良かったからだ。
俺の悪口は未だこれからだ。
俺たちの愛がどうして歳を取ってしまうはずがあろうか。

マヤ、もし出来ることなら
その新しい間男に頼んでおけ。
お前が妊娠したその日に、
お前が産む初めての子が、
もし男の子であれば、
彼はお前の美しさを持っていることであろうから、
俺の名前をつけるように、
彼に許しを請え。
俺の悪口は未だこれからだ。
俺からの贈り物がどうして腐ることがあろうか。

神はたとえ悪いことでも望むことをする。
あなたが愛している人があなたを愛していないとしたら、
それは悲劇になる。
友よ、俺は結婚(離婚)のことについて思い悩みすぎて、
神が私にボケを送った(遂に頭がボケてしまった)。

マヤ、俺はお前をとことん捜した。
対岸のブラザヴィルまでも。
俺は・・・(ブラザヴィルの地名と思われる)
・・・から始めて、・・・や・・・へ行った。
俺はキンシャサに戻って、
ボサズーの店のジョニーのところへたどり着いた。
よくお前にビデオを買ってやった店だ。
しかし奴はお前を見なかったと言う。
キンガブワの村、
クロードのいるラ・クレッシュ、
ひげ親父(地区の長老のこと)のいる九つの区も全部回った。
リングワラ区にあるアブアグのところもだ。
どこへ行ってもお前だけが見当たらない。
そのあとリダメ(人名)のもとにさえに戻った。
なにもかも乾き切ってしまったが、
マヤ、俺はお前を待つことにしたよ。
愚行による痛手はなかなか消え去らないものだ。

神は自分の望むことなら、どんなややこしいことでもする。
寝る時間だ。考えるのは、もう明日にしよう。
マヤ、明日のプログラムをおくれ(確たる消息を伝えてくれ)。
マヤ、俺のことも考えてみてくれ。
夜は長くて果てしない。
お前は来ない。何も見えない。
朝はお前の面影さえ消してしまう。
魔性の美しさ、マヤ・・・
カメレオンのような歩き方(コンゴ女性のゆったりと歩く色っぽさを讃える表現)
フランス人形のようなかわいらしいお目々、
マヤ、手紙だけでも書いて来てくれないか、
たんなる葉書だけでもいい。
俺はお前のために首飾りをして待っている。
俺はお前のために・・・を着て待っている・・・(フェイド・アウト)


世の心優しき男性諸君!
女とはこういう生き物である。もはやこれを理解しようとか、どうにかしようなどという目論見は、時間の無駄、カネと労力と気持ちの無駄と知れ。
別に女が悪いという訳ではない。女はこのように出来ているのだからしかたがないのだ。
女から見れば男もまた然り。お互い様だ。
さあ、気を取り直して、「マヤ」という部分に、君を捨てて去って行った女の名前を放り込んで、声を大にして歌おうではないか!
伴奏は引き受けた!

 

Productions Solfege Universel presente Le poete Simaro Massiya Lutumba:
"Maya" l'Album des Albums avec la participation de Carlyto et Pepe Kalle
(CD, Ngoyarto/ SU15950, 1998)

Maya (Simarro)
Tshiala (Simarro)
Affaire Kitikwala (Simarro)
Bangaka basi ya bato (Simarro)
Muya (Chacain Lola Djangi)
Verre Casse {Kopo Epasuki} (Simarro)
Maya 2e. version {Maya Aboyi} (Simarro)

 


homepage> music> 世界のエエ音楽> T.P.O.K. Jazz

homepage> congo> 簡単なリンガラ語